Tokanisaka ete moto nionso azali na ndingisa ya kozala na esengo (*).

Tondimi ete moto inso azali na etinda mpe mokumba mwa kokokisa, na bisika ye avandi, atako azali boyi, polotó nto mokonzi. Iye inso nde ekosala ete mokili mozala esika ya malamu.

Toza na kondima na bopanzani bwa mosala mwa bokeli misala na lolenge lwa bokaboli mayele, makanisi mpe bwanya - KEI (**). Yango nde nzela ya bopanzani bwa mosala mwa bokeli misala. Tozali kokabola yango mpo bamisusu bakabolaki liboso.

Tozali na kondima pona boboto bwa bato (***). Onzela ya mosala mwa bokeli misala o ntei na biso. Tondimi nzambe ete na mokeli misala inso, mombongo inso, misala minso mia bobokoli misolo “boteki na bosombi mpe misala mia tekiniki”, tokoki kolakisa ete bokokani bokoki kozala okati ya mambi ma misolo na ma mosala mpe bolengeli bwa bato. Tozwami kati na etumba mpo na kolakisa ete boboto nde bozali kotambwisa mokili,kasi lokosote!

Banso tozali na elikya ya kozwa libaku linzenga lya kobikela mbala ya yambo to mpe ya ibale na ngrasiya ya misala mya elimo.

Lokola eloba Nelson Mandela, "Bosambisa ngai te na ntina ya lupemba (nkembo), kasi na mituya mya mbala eye nakweyaki mpe na telemaki".

Konza ya yambo eko mononoko nakobikela o misala malamu mpe tango inso tosalaka mbemba o bomoyi bua biso, mpe na libaku lya sika to lya ibale.

Kozwa libaku lya ibale eyaka pamba te, esengeli koyilengele na kolakisa ete “okoki kokokisa maloba mayo o misala” ete yo moko oponi nzela elamu ya kolanda obonsomi nionso.

Tozali na kondima kwa botangisi bwa makanisi ma ndako ya misala. Bozangi ezali mabe te soki ekoki kopesa biso mayele ma komono mbemba tosala mpo ete to kabola na baninga maye to tangisami.

Mikakatano na bozangi ebongwani na bozui bwa solo pona bato banso, na lolenge isusu ekomi ebandeli ya bozwi ya sika.

Tozali na kondima na mosala mwa bokeli misala pona bato banso moye mokosalema na bonsomi na bolandi mokano mwa 2 mwa ndimbola ya makoki ma bato, mosala moye mokolanda:

  • boweleli te
  • loposo te
  • kozala mwasi to mobali te
  • lokota te
  • bondimi nzambe te
  • bondimi makambo ma politiki to makambu misusu te
  • ekolo to esika ya mbotama te
  • bozwi to nkita te
  • mbotama to bozali te

Boyokani bwa solo bwa bato banso nde ebandeli ya bozwi.

Tozali na kondima na misala mya elimo na lolenge lwa bosombi mpe boteki bozwi mpe makoki. Tozali kokanisa ete likolo lya mbongo iye ekokoto o’ndako ya misala, kaka bozwi nde ekoki kosalisa pona lifuta ya malamu.

Mibeko miye ekotosamaka na bopesi misolo o ndako ya misala ya sika mpe iye ebanda kala: bopesi misolo o ndako ya misala pona mbala ya yambo mpe bopesi misolo pona kolandela misala na ndenge elengelemaki. Mibeko yango etosamaka mpe na masanga mabiso.

Tozali na kondima na mosala mwa bokeli misala mwa litomba moye mokolandela makanisi. Nionso ebandaka na likanisi elamu mpe sembo. Bosolo mpe komitiela motema ezali na ntina mingi na likambo lina. Kobomba makanisi yango nde ekoki kozala libebisi.

Tozali na kondima ete mosala mwa bokeli misala moye mokosalema na polele - ezala o ndako ya musala ya sika to ya kala – mozali na motuya pona baye banso bazali na makoki okati ya ndako ya mosala ina, lokola:

bayè babanda ndako, bayè bayé kosangana na bango, bayè bakomema misolo, bayè bonso bazali o’etando ndako ya musala ezali, lisanga lya bikolo bya bapaya, mpe eye etangami te. Likambo liye ekobanda na biso lokola bayè babandaka liboso mpe na bayè banso bayé kokoto lingomba sika.

(*) Papa François na mokanda mwa ye "Fratelli Tutti" pona ba episkopo mpe ba katoliko banso, o’eteni yango ya 6 par 22

(**) “KEI” na lokota la flamand elingi koloba libanga enene. Na nzembo naye Bram Vermeulen ayembi: “Nalongoli libanga”.

Nabimisi yango o ebale natie yango o mokili.
Mayi ma koleka lisusu lolenge mabandaki koleka liboso te.
Mbangu ya ebale ekokanga yo te.
Mayi elukaka kaka nzela ya koleka.
Kasi soki etondi meké na mayi ya mbula, mpe na mbula-mpembe,
ebale eko mema nango libanga na ngai.

Ekosila kosala yango moselu.
Po ete epema onse ya mbuu.
Nabimisi libanga na ebale natie yango o mokili.
Sikoyo, nayebi ete ata mokolo moko te bakobosana ngai.
Nasili bongo kotalisa elembo ya bozalisami na ngai.

Nse o nzela ya kolongola libanga kaka se yoko,
mayi ma ebale makoleka soko moke te lolenge mazalaki koleka liboso.

Nabimisi libanga na ebale natie yango o mokili.
Sikoyo, nayebi ete ata mokolo moko te bakobosana ngai.

Nasili bongo ko talisa elembo ya bozalisami na ngai.
Nse o nzela ya kolongola libanga kaka se yoko,
mayi ma ebale makoleka soko moke te lolenge mazalaki koleka liboso.

(***) An Haekens na kati ya Tertio dd. 12/11/2020:

Boboto bwa Nzambe.

Tozali na kondima na boboto bwa bato.

Ntina na yango elataka nzoto te mpe emononoko te o maloba kitoko pamba, kasi na bolamu bwa moto boye bokoloba te mpe na bolamu bwa moto bwa mokolo na mokolo boye mosala ata moko te ekoki koboma.

Tozali komona boboto bwa boye na mosala mwa bato bayike baye bazangi makoki kasi bazali na motema mawa mpo ya kosalisa baninga bazali kokelela.

Bazali kosala mosala mona na bomikitisi, bakozela makumisi to lokumu te, bazali kosala té mpo basengeli kosala, kasi pona “se kosalisa”. Tango mosusu yango nde lolenge la kobikisa mokili mpe kobikisa biso moko.

Veuillez signer si, comme nous, vous adhérez à ce manifeste.